Lomingo la liloba lya Nzambe ekosepelama o mokolo mwa 26 ya yanuali mokoy¨¤
Albys KBD, cp - Kinshasa/RDC
Mokolo mwa lomingo la Liloba lya Nzambe ezali libaku ya motuyà mpo na bakristu ya kozongisa sika bomipesi ba bango na kotanga mpe komanyola Biblia, esaleli ya moboko mpo na bokoli ya bondimi mpe bomoi ya molimo, mpe esaleli ya elikya mpo na bandimi ya mokili mobimba. Mokolo mwa 26 ya yanuali mokoyà ekosalema na mbala ya motobà, lomingo lya Liloba la Nzambe, mokolo eponami na Papa, ut¡¯o mokolo 30 ya setembere ya mobù 2019, mpo na kokangema na botùyà ya Makomi Masantu. ¡°Nazali kolikya na Liloba na yo¡±, ezali motó ya likambo oyo ewuti na mokanda ya ba Nzembo 119, oyo eponamaki mpo na milùlù myango.
O kati ya Baziliki ya Mosantu-Petro, Pàpa akokamba misa mana na ngonga ya 9.30, (ngonga ya mboka Roma). Na nsuka ya milùlù mina, akokabolela bato bazwamaki wana ; mpo na likanisi ekoma limesano ete, liloba la Nzambe epalanganisama na lolenge ete emonana
Kokamba bandimi na bokoli ba bango ya molimo
Na tango ya milùlù, François akokulisa bandimi tuku mineyi (40), basi mpe babali ya bikolo bikesni: 4 bawuti na Albanie, 3 na Argentine, 5 na Autriche, 1 na Bolivie, 4 na Brezil, 5 na Filipina, 1moko ya Islandia, 6 ya Italie, 5 ya Mexique, 1 moko ya pologne, 5 ya Slovenie. Moko na moko o kati ya bango akozwa Biblia ya Nova Vulgata, lokola limeseso.
Bokutani nà Liloba lya Nzambe.
Mpo ya kosunga bandimi na bokoli ba bango na molimo mpe na bozindo bwa Liloba lya Nzambe, Eteni mpo na mituna ya moboko ya bopanzi sango na mokili ya Dicasterie mpo na Evangelisation etie na internet, na minoko (bankotà) motoba, lisalisi ya pastorale-liturgie ya ofele, oyo ekoki kozwami na site officiel «». Etaleli esaleli oyo epesaka makanisi mpo na kolendisa bokutani na mozindo nà Liloba lya Nzambe na lisanga, na libotà, na bomoi ya mokolo na mokolo, mpe oyo ezali mpe na masolo, komanyola, makomi mpo na losambo ya adoration mpe makanisi ya bobateli.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda ya basango na kofina awa