Jubil¨¦ na Mabele Masantu (Terre Sainte), Tata Episkopo wa Lokumu Pizzaballa asengi kobatela kondima na kimya (boboto)
Albys KBD cp ¨C Kinshasa/RDC
Na katikati ya mobù ya jubilé, elikya ezali bongo mabongi mya eklezya oyo elobami koleka zambi mpo ya minyoko mileki na mokili, ndakisa na yango, ekolo ya Terre Sainte, oyo ezali lokola kitalatala. Naenguma epayi wapi Yesu akolaki, Tata wa lokumu Pierbattista Pizzaballa, akangisi elikya na boyambi na Nzambe. Atomboli makambo moye misato, kondimela, mpiko, mosala (bikela) mpo ya komema biso tomona oyo eleki biso, bobngo alobi ete, soki biloko biye basato bozangi, ¡°tozali banso baombo ya bitumba mpe mbuma ekobimisa¡±
Elikya ekosenga mpiko (molende)
Bolingi bwa Nzambe, to kondima mpe kotya motema na Nzambe, ekomema ¡°nakotya motema mpe na baninga babiso ya penepene¡±. Kasi elikya mpe esengeli na mpiko to molende. Mpo na Tata wa lokumu ya Italie, mpiko ezangà elikya ¡°ezali na yango kaka kolapa ndaye na likambo oyo ezali n antina te ya kobundela¡±. ¡°Elikya ezangà molende ezali lokutà (bokosi), ekokosa biso ete tokoki kozwa oyo tosengeli na yango ata tosali makasi te na bomoyi¡±. Akanisi na bato, bosenga ya «koyeba kozela» esika ya lokuka kozwa na lombango ya mikol¡¯oyo.
¡°Tozali na eleko oyo eyebi kozela te, elingi nyonso na lombago, eyebi te kosala bokeseni kati na bosengà mpe kokokisama na yango. Tolingi kimya na lombango, tolingi mpasi esila noki. Tolingi kosilisa makambo na lombango sika, mpe toyebi komitika te nakozela na molende, kasi na kolembe te¡±.
Bongo toyeba boniboni «ngonga eye, na minyoko mya yango, ekopekisa bikela te, mposa ya kotonga eloko ya kitoko, na kosala elongo mpo ya kotonga ndako makasi ya bolingami, bomoko, bolingo». Tata wa lokumu Pizzaballa atangaki nsango elamu ekomamaki na Luca: ¡°Mama wa yé azalaki komaniola manso o motema mwa y顱 mpe abetaki nsete na likambo ya ¡°eloko moko te mokabola biso na bolingi bwa Nzambe¡±, lolenge ya molimo ya kobatela.
Banso, tozali bato baboloko ezala lolenge nini
Nzokandé na libakù ya jubilé, biblia elobi ete boboto mpe bosembo mosengeli kotongisama mpo na molimo mwa molimo mwa sika, ya moto moko mpe ya lisanga. Akanisi bongo likàmà ya bakangi ya bitumba «ya ba ngambo inso», ekokisi biso moto na moto nà moko wa bango.
¡°Ezala lolenge nini, tozali banso bato baboloko ya bitumba biye mpe litomba la yango. Boyinani, bosilikeli, mpe bobangi ekokanga boyokani ba biso, bondimami bya biso na baninga¡±, eyoki ye mawa. Mpe Tata wa lokumu asukisaki na kolinga ete mpo ya jubilé, Nzambe afungola lisusu mitema na ¡°kondimela baninga mpe kolikya¡± mpo ya kozwa, mukolo moko, kimya oyo bato banso balukaka.
Matondi na ndenge otangi mokanda eye. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na manaka na biso ya basango na kofina awa.