ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2025.01.15 Tata Episkopo wa lok¨´mu, Ignace Bessi, na Misa ya botondi ngrasya, o mokolo mwa poso mwa 11 ya Yanuali 2025.01.15 Tata Episkopo wa lok¨´mu, Ignace Bessi, na Misa ya botondi ngrasya, o mokolo mwa poso mwa 11 ya Yanuali  

Episkopo wa Lok¨´mu Bessi, ¡°moto akoki komipesa eloko moko te longola se oyo epesameli y¨¦ ut¡¯o lola (likolo)¡±

Sanza moko sima ya bokulisi bway¨¦, Tata wa lok¨´mu Ignace Dogbo Bessi asalaki Misa ya kotondo botondi na Nzambe oyo ? atali te bot¨¤wu bwa mosali way¨¦ ?. ?moto akoki komipesa eloko moko te longola se oyo epesameli y¨¦ ut¡¯o lola (likolo)?, esakoli Bessi, nakosepela ¡°bolingo suka te mpe etonda mabombami ya Mokonzi wa biso Yesu Kristu, oyo abengi moto nyonso oyo alingi, ntango alingi, esika alingi mpe lolenge alingeli y¨¦¡±. Libaku mpo na mokonzi wa Eklezya ya kopamela mayele mabe na ?boweli bokonzi?.

Albys KBD cp ¨C Kinshasa/RDC

 

Ezalaki na Katédrale Mosanto Polo ya Plateau, na Abidjan, mboka-mokonzi na nkita ya ekolo ya ivoire, nde oyo Papa François atombolaki na lokumu ya tata Episkopo o mokolo mwa 7 desembere o mobù 2024, asalaki Ukaristya ya kotondo Nzambe botondi ¡°mpo alingi kotala botàwu bwa mosaleli wayé oyo nazali¡±. ¡°Motema mwa biso etondi na botondi mpo na ebele ya ngrasya oyo tozwi na ngolu yayé nsuka te, nà bolamu bway顱, etombwamaki Episkopo-monene ya Abidjan, Tata wa lokùmu Ignace Dogbo Bessi, na ebandela ya mateya mayé o miso ma baninga ba yé baepiskopo, banganga-nzambe mpe bato ya politiki, ya boyangeli, ya diplomasi, ya basoda mpe ya bonkoko. Asengaki bandimi bayé basambela mokonzi mpo ete azala «mosàleli wa Eklezya».

¡°Moto azalaki na yo elongo o ngambo mosusu ya Yordani..., tala, azali kobatisa, mpe banso bakei epai yay顱

¡°Moto akoki komipesa eloko moko te longola se oyo epesameli yé ut¡¯o lola (likolo)¡±, elobi wa lokùmu Bessi, nakolobela nsango elamu ya Mosantu Yoane o eteni ya misato(3), o molongo mwa tuku mibale na sambo(27), matangi eponamaki mp ona libakù linà. Oyo ezali nde motuna ya Yoane-Mobatisi na bayekoli bayé tango bayaki kolobela ye mpo na likambo ya Yesu: ¡°Molakisi, ye oyo azalaki elongo na yo na ngambo mosusu ya Yordani, mpe oyo opesaki litatoli epayi na ye, talá, azali kobatisa, mpe bato nyonso bakendaka epai na ye¡± (botala na Yoane 3, 26-27) A na ndakisa ya mosakoli oyo, tata wa lokùmu Bessi, abengaki bandimi bayé, elingi koloba ¡°kofukama liboso ya bolingi bwa Nzambe oyo ezali kofungwama oyo ezali komonana na Yesu¡±. ¡°Yoane azali koimaima te mpo na koboya mokano mwa Nzambe. Kutu, asosolaka yango na komikitisa, asepelaka na yango mpe ayokaka esengo ya moninga, ya molongani, na bongo kotikaka ye ndakisa oyo asengeli komekola¡± elobaki Episkopo-mokonzi ya Abidjan.

2024.10.07 Mgr Ignace Bessi
2024.10.07 Mgr Ignace Bessi

Mpo na likambo linà bakristo bazali na nzela ya kokóma bateyi (balakisi)

Episkopo wa lokùmu akebisi lisusu mpo na bokonzi ekomimonisa lokola nzambe, koteka baninga, oyo ekoki kowuta na maniola malamu te maloba ma Yoane-Mobatisi, liloba oyo «lileki ngonga (tango)», elobi ye. «moto akoki komipesa eloko moko te longola se oyo epesameli yé ut¡¯o lola (likolo)». Epekisami, kutu kobelela bonzambe ¡°tango bazali kobongisa esika ya boyangeli na nzela ya mab顱 ebeti yé nsete, bongo abakisi ete, mpo ya likambo linà, bakristo bazali na nzela ya kokóma bateyi. 

Koyamba na bomikitisi manso makowuta na Mokonzi

Nakolobela bakristu, Episkopo monene ya Abidjan beti nsete na likambo ya boyangeli o kati ya eklezya, mingi kati na bango, bayé bakolukaka ¡°nakotiya baninga babango na nzela ya bomokili oyo ekotosaka boyambi bwa biso te¡±. Na libaku liye, bakoki koloba nayino te lokola Yane-Mobatisi été: «moto akoki komipesa eloko moko te longola se oyo epesameli yé ut¡¯o likolo», elobi yé. ¡°Bamboka, bikolo ba biso bazali komono bato bazali kokufa mpo ya kowela bisika ya bokonzi mpe boyangeli¡±, elobi Bessi na mawa nyoso.

2024.08.01 Mgr Ignace Bessi, Episkopo monene y' Abidjan
2024.08.01 Mgr Ignace Bessi, Episkopo monene y' Abidjan

 

Bosambela mpo na zala mosaleli wa Eklezya

Tata wa lokùmu Bessi, sima asengi na bato ya diosezi na ye kosambela mpo na ye mpe «baye bazali na bokonzi, mpo basengeli kozala basantu na kolukaka bolamu ya bato banso mpe kobonza mbano ya bango moko». Bosambela mpo na zala mosaleli wa Eklezya.

Kobanga eloko te na oyo okosala to okoloba

Na maloba na ye na suka ya Ukaristya, Episkopo wa lokùmu, Jean-Pierre Kutwa, episkopo-mokonzi ya kala ya Abidjan, oyo azali sikawa na ebongà ya administrateur apostolique ya diosezi ya Man, alendisi moninga na ye ya mosala nakobangaka te mpo na ba mikakatano ya mosala oyo ya sika, etindà oyo ¡°epesameli yen a Mokonzi¡±, Oyo aponi yo, akopesa yo makoki mpo okoba o mosala mwa ye. Olati langi ya motane, elimboli bolingo kino o makila. Bolingo bwa yo mpo ya Kristo, bato bakokende tee na nsuka ya libonza ya bomoyi bwa yo. Kobanga eloko te na oyo okosala to okoloba, ye mei mokonzi akotondisa y ona nguya ya elimo na maye okoloba mpe okosala (¡­)

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda ya basango na kofina awa.

 

15 s¨¢nz¨¢ ya yambo 2025, 22:04