ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2025.01.07 RDC: Batindami ya  diosezi ya Cyangugu o Ekolo ya Rwanda na Bukavu mpo ya bondeko 2025.01.07 RDC: Batindami ya diosezi ya Cyangugu o Ekolo ya Rwanda na Bukavu mpo ya bondeko 

Epifani ya bondeko pona kimya kati na Bukavu n¨¤ Cyangugu

Mwa lomingo mwa 5 ya sanza ya yanuali, diosezi monene ya Congo d¨¦mocratique eyambaki batindami pene na nkama ya diosezi ya Cyangugu, na ekolo ya Rwanda, mpo na kokumisa misa ya epifani oyo Mgr Fran?ois-Xavier Maroy, Episkopo monene ya Bukavu asalaki. Ekabolami na ba paloase 43 ya diosezi monene, molulu oyo elilingi ezali na mokano ya kobongola mposa ya ba episkopo ya ACEAC mpo na kolendisa bondeko mpe kimia kati na bato oyo bazali bisik¨¤ eleki na ndelo.

Albys KBD ¨C Kinshasa/RDC


Etuluku oyo esalemaki na Banganga-Nzambe, basi ya mangomba ndenge na ndenge mpe bayembi mike ya cathédrale ya Cyangugun balekisaki mikolo mibale na Bukavu, kobanda mokolo mwa 4 tee 5 ya yanuali. Botali yango ezali na kati ya milende ya ba mosala ya mibeko mpe ya kimia ya ba diosezi monene mpe ba diosezi mibale, na boyokani na basi ya dynamique mpe na muvema ya nayembi mike, mpo na kolendisa boyokani kati ya masanga ya ba etimà minene. Bobimi oyo ekokani na bamposa ya lisanga ya ba likita episkopo ya Afrika na katikati (ACEAC). Mpo na kolendisa bondeko mpe kimya kati na bato oyo bazali na ndelo te.   

Bandeko mibali mpe basi koleka matata mpe mobulu


Na misa ya epifani oyo esalemaki o¡¯mokolo ya mposo, na boyokani na linaka ya milulu ya lingomba na RD Congo ba biangi bazwaki libaku ya kosolola na bana ya ba paloase tuku mineyi na misato (43) ya diosezi monene. Likambo oyo ya elilingi ezalaki na mokano ya kobongola volonté ya ba episkopo ya ACEAC. «toyei kopesa litatoli ya bandeko ya ndelo na kosepelaka elongo epiphanie ya nkolo. Geste oyo ezali kolakisa mposa ya baepiskopo na bioso ya kozala na bomoi lokola bandeko mibali mpe basi atako matata mpe matata. Tolingi kolakisa ete lingimba etikali kotelema mpo na kimia ya Kristo, mokonzi ya kimia», esakoli Papa Valence Niragire, coordonateur mpe kimia na Rwanda mpe momonisi ya ACEAC.  

Mwa bandimi ya Cyangugu bayàki mpo ya milùlù, banzingi Episkopo monene ya Bukavu
Mwa bandimi ya Cyangugu bayàki mpo ya milùlù, banzingi Episkopo monene ya Bukavu

Baoyo balukaka kotemela biso bazali komikosa mpenza   


Mgr François-Xavier Maroy, oyo asepelaki ukaristya oyo, ayambaki mosala oyo lokola elembo makasi mpo na bakonzi la mikili ya lacs minene. Mpo na ye, botali oyo ezali kolakisa ete bato ya mboka bazali na mposa ya bomoko mpe baboyaka bokabwani oyo matata ezali kotinda. «esengeli kolakisa ete tozali na bomoko na bolingo, mpamba te baoyo balukaka kotemela biso bazali komibunga makasi. Tolingi kokoba kobongola oyo, kokabola bisengo na biso, pe kotonga avenir ya kimia. Bana na biso, ezala ya RDC to Rwanda, babongi na bitumba te. Babongi na eloko mosusu te kaka kimya». Asakolaki.

Diosezi monene ya Bukavu
Diosezi monene ya Bukavu

Litatoli makasi mpo ya bomoko oyo Eklezya elingi kozala na yango


Botukatani kati na Bukavu na Cyangugu ezali kaka kobongola pete te. Ezali litatoli ya bomoi ya bomoko oyo lingomba elingi kozala na yango,atako mikakatano, mpo na kofanda elongo na kimya na etuka oyo ezwami na bampota ya matata. Ezali bokobi ya ba engagement oyo esalemaki na tango ya kosolola ya ba episkopo membres ya ACEAC, oyo esalemaki na mboka Roma na sanza ya zomi ya mobù 2024. Na esakola na bango ya suka, ba episkopo ya ba mboka misato etongaki lisanga oyo (Rwanda, Burundi na RDC) bazalaki na yango asengi na bakonzi ya leta ya matiba minenekosala mpo na kimia mpe kosukisa mpasi ya bato, mingi mpenza na Esti ya RDC



Matondi na ndenge otangi mokanda eye. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na manaka na biso ya basango na kofina awa.

 

08 s¨¢nz¨¢ ya yambo 2025, 09:06