ÐÓMAPµ¼º½

Luka

Bondeko ya bandimi ba katoliko ya ekolo ya Chine Basangani nakopesa maboko mpo na kosunga bato ya Tibet Bondeko ya bandimi ba katoliko ya ekolo ya Chine Basangani nakopesa maboko mpo na kosunga bato ya Tibet   (AFP or licensors)

Boningisami ya mab¨¦l¨¦ na Tibet: Lisungi ya Bakatoliko ya ekolo ya Chine na bay¨¦ bazwaki mpasi

Bamangomb¨¤ ya katoliko na ekolo ya Chine mobimba bazali kosangana mpo na kopesa makabo mpo na kosunga bato nkoto t¨´k¨´ mitano (50.000) baye balongwaki na bandako na bango na Tibet nsima ya koningana ya mabele oyo ebomaki bato o mokolo mwa mos¨¤l¨¤ mibale mwa 7 ya sanza ua yanuali. Balokoti mbongo koleka nkoto tuku motoba (60 000).

Albys KBD cp ¨C Kinshasa/RDC

 

Na koningana wana ya mabele oyo euti kosalema kala mingi te, moko ya koningana ya mabelé oyo eleki mabe oyo esalemaki na etúká ya Himalaya na bowumeli ya mbula monkàmà (100), bato koleka nkàmà moko na tukù ibale (120) bakufaki, mpe bato koleka nkàmà misato na tukù misato (330) bazokaki. Pene na bato nkoto tùkù mitano (50.000) balongwaki bandako ba bango mpe bankoto zomi ya bandako ebukanaki to ebebaki. Ndako oyo ya lisangà elandelaka boningani ya mabele na ekolo ya chine ezwaki (etangaki) koningana ya mabele nà magnitude ya 6,8 (7,1 na ebuteli ya Richter) oyo ebetaki etuka ya Dingri mpe etuka ya Shigatse nà etuka eye ya Tibet ya Chine o mokolo mwa mosàlà mibale  mwa 7 ya sanza ya yanuali mowuti koleka.

¡°Pene na bato nkoto tùkù mitano (50.000) balongwaki bandako ba bango mpe bankoto zomi ya bandako ebukanaki to ebebaki¡±

Bozalani penepene ya Pàpa

O mokolo mwa libwà (9) ya sanza ya yanuali, na lisikulu na yé na corps diplomatique ekangamà na Esikà (Ebonga) Esantu, Pàpa alakisaki mawa nayé na mabota oyo bakufelaki, alaki mabondeli nayé mpo na bayé bakufaki. Engebene bakonzi ya Chine, bato koleka monkàmà ineyi (400) batikali ya kokangama na nsé ya bitika.

Bomoniseli ya bondeko mpe ya lisùngi

Ba monkàmà ya bato ya Tibet oyo bafandaka na boombù na ekolo ya Inde mpe na Népal ba lakisaki (monisaki) lisungi la bango na kosala milulu ya kongengisa bakandela (bougies) mpo na bato oyo babungisaki bomoyi bwa bango. Na etukà ya Tibet, ba mangombà ya katoliko ya chine batyaki bibongiseli ya bondeko mpo nakosunga bato oyo bazali na bosengà. Diosezi ya Pékin ebwaki mbelà, na kolobaka makasi ete na katikati ya Mobu ya Yubile mpe eleko ya Noele, ¡°tosengeli kozwa libakù ya komikundola liteya ya Nkolo ekoloa: ¡°Nyonso oyo osalaki na moko ya bandeko ba ngai babali mpe basi ya mike, nde bongo bosalaki yango na ngai¡±.

¡°Ba monkàmà ya bato ya Tibet oyo bafandaka na boombù na ekolo ya Inde mpe na Népal ba lakisaki (monisaki) lisungi la bango na kosala milulu ya kongengisa bakandela (bougies) mpo na bato oyo babungisaki bomoyi bwa bango.¡±

Mbéla (libiangi) mpo ya Mosàlà

Ba paroisses nionso ya diocèse ya Pékin babengisami mpo na komibongisa mpo na kosunga baye bazwaki mpasi na koningana ya mabele. Na nsima, Ebongiseli oyo ya bolingo ya diosezi oyo ebengami ya nkombo ya Divine Mercy, ekokabola misolo yango. Na kotalaka mobù ya Jubile oyo ewuti kobanda na nsé ya elembo ya Elikya, Diosezi ya Shantou ebandi kobenga na bamangombà ya Diosezi ya katoliko ya mokili mobimba mpo na kosangisa makabo mpo na kopesa lisungi. Ba ebongiseli ya bamboka oyo ezali ko sangisa makasi  ya lisungi mpo na etukà ya Shanghai ebimisaki mitango oyo elakisaki été moko ya ba makabo maliboso mozalaki na motuya ya 500.000 yuans, to 66.000 euros, oyo Diosezi ya Shanghai apesaki.

 

Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango, mikomisa na mpkanda ya basango na kofina awa

 

11 s¨¢nz¨¢ ya yambo 2025, 09:08