ÐÓMAPµ¼º½

Luka

2024.11.15 Lisanga ya ba Episkopo ya ekolo ya B¨¦nin na liyangani lya bango ya mibale.  2024.11.15 Lisanga ya ba Episkopo ya ekolo ya B¨¦nin na liyangani lya bango ya mibale.  

B¨¦nin: ba episkopo bafungoli ya bango likita monene ya mibale

Lisanga ya ba ¨¦piskopo ya ekolo ya B¨¦nin efungolaki, o mokolo mwa mos¨¤l¨¤ misato mwa 8 ya sanza ya yanuali, Liyangani monene ya mibale (2e session) mp ona mob¨´ pastorale ya 2024-2025, na nzela ya misa ekambamaki na Mgr Eug¨¨ne Cyrille Hound¨¦kon, episkopo ya Abomey, engumba moko na sud ya mboka. Libaku ya kotala bomoi ya ba mangomb¨¤ mpe misala ya Eklezia ya mboka, lokola mpe mob¨´ ya jubil¨¦.

Albys KBD cp ¨C Kinshasa/RDC



Na mateya mayé, na tango ya misa ya ebandela ya lisanga monene oyo ya ba episkopo ya Bénin, Mokambi ya diosezi ya Abomey, nakotala makomi ya liturgie ya mokolo monà, abeti nsete na bosengà ya kotiya motema na Nzambe oyo amonisaka tango inso bozalisi lya yé o kati ya mimekano ya bomoyi bwa biso. A zwaki mpe libaku linà mpo ya kolendisa bakristo ya ekolo ya Benin bayeba kopono batu bayé bazali na makoki te na bowumeli ya mobù moyé ya jubilé elilingi ya Elikya, ndenge elingaki Pàpa Franswa. ¡°Na mobù moye ya jubilé oyo etali mingi elikya, na ndakisa mpe bolobeli ya Mama wa biso ya Elikya, topesa bomoi na bilembo ya elikya na kosungaka bato na boloko, bato na maladi (bakoni), babola, baluki mboka, babange, bilenge ba bunga, mpe bato bazali na likama¡±, ezalaki yé kolikya.

¡°Na mobù moye ya jubilé oyo etali mingi elikya, na ndakisa mpe bolobeli ya Mama wa biso ya Elikya, topesa bomoi na bilembo ya elikya na kosungaka bato na boloko, bato na maladi (bakoni), babola, baluki mboka, babange, bilenge ba bunga, mpe bato bazali na likama¡±

Bozalisi na bozindo ya mobù Mosanto nakosala bilan ya bamangombà

Na ngambo ya milùlù oyo ya Ukaristya, Mgr Roger Houngbédji, episkopo monene ya Cotonou mpe mokambi ya lisanga ya ba Episkopo ya ekolo ya Beni, alakisaki mwa makambo ekomamaki na linaka lya ekwelà enà: ¡°Tozali awa mpo na kotalela mwa moke bomoyi ya bamangombà manso ya Lisanga ya ba Episkopo ya ekolo ya Bénin, kosala bilan ya misala mpe komona boniboni  Eklezia ekoki nayino kozala na mosala ya mboka mobimba mpe kokutana na mikakatano oyo ekomeli biso. Ekozala mpe likambo ya mobù ya jubile, mpe lolenge nini Eklezya ya Bénin ekozala na bomoyi makasi(na bozindo) mingi na mobù oyo ya jubile,¡± elobaki ye yambo ya kobanda mosala.

¡°Tozali awa mpo na kotalela mwa moke bomoyi ya bamangombà manso ya Lisanga ya ba Episkopo ya ekolo ya Bénin, kosala bilan ya misala mpe komona boniboni Eklezia ekoki nayino kozala na mosala ya mboka mobimba mpe kokutana na mikakatano oyo ekomeli biso¡±


Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango, mikomisa na mpkanda ya basango na kofina awa

 

09 s¨¢nz¨¢ ya yambo 2025, 21:02