Bansango ya Bikela (Mis¨¤l¨¤) ya ngambo ya Esti ya Mokili ¨C 17 Yanuali 2025
Bokatani bwa Bitumba na Gaza
Boyokani bozwamaki o mokolo mwa mosàlà misato mwa 15 ya sanza ya yanuali, kati na Hamas nà Israël nsima na sanza zomi na mitano (15) ya bitumba. Ezali kopesa nzela na bopemisi masasi kobanda mokolo mwa lomingo moye mwa 19 ya yanuali mpe kobimisa bato tuku misato na misato (33) oyo bakangisaki kati na bato ya boloko pene na nkoto moko (1.000) ya ekolo ya Palestine. Patriarche latin ya Yeruzaleme asepelaki na liyebisi lyango, akolikya ete ¡°nsuka ya mobulu oyo ememi mpasi oyo ekokaki komekama te¡± emonisami. Asengi kotalela na bozindo botùyà ya matata manà mpe azali kozela bozongi ya bato ba mobembo ya boyambi na bisika ya bule ya Mabele Mosantu.
Mokambi mpe mbulamatari moko na ekolo ya Liban
Ekolo ya Liban ezwi sika Mokambi mwayé, Joseph Aoun, mpe mbulamatari moko na nkombo ya, Nawaf Salam. Na boyokani lolenge makambo makabolami mpo na misala na mboka, Mokambi ya liboso azali mokristu ya ba maronite mpe ya mibale azali musulman sunnite. Joseph Aoun, soda, azalaki tee sik¡¯oyo mokambi ya basoda ya Liban. Nawaf Salam azali diplomate mpe Moyangeli ya kala ya Cour internationale ya justice. Mboka ekoki komona stabilité politique sima ya bambula mibale ya bozangi bokonzi na pouvoir exécutif. Boponi ya mbulamatari bozali kozelama na mikolo mikoyà.
Bobulisami ya Eklezya ya Batisimo ya Mokonzi na Yordania
Mokolo mwa 10 ya sanza ya yanuali, Eklezia ya Libatisi ya Nkolo ebulisamaki na esika ya Al-Maghtas, esika wapi Yesu azwaki libatisi na santu Yoane-Mobatisi. Bofungoli bonà molakisi bosukisi ya mibù zomi na mitano ya misala. Milulu mya misa mikambamaki na Tata wa lokùmu Pietro Parolin, nà lisalisi ya patriarche latin ya Yeruzaleme, tata wa lokùmu Pierbattista Pizzaballa, elongo na ebele ya bandimi. Bakitisaki na lotale, bareliques ya Mosantu Jean-Paul II mpe ya basantu bamartiro ya Damas. Yordania ezali ezali etando ya kala ya bakristu na mokili, lelo ekotanga 2 ¨C 4% ya bakristu o kati ya 11 miliyons ya batp.
Matondi mingi na ndéngé otángi lisolo oyo. Soki olingi kozwa basango tango inso, mikomisa na mokanda ya basango na kofina awa